Frobits
🎵 A song made on Frobits

Douce Mélodie de la Vie

Emmanuel · 🇨🇩 DR Congo
0:000:00
Download Remix
Make your own song
Continues securely on the web
Lyrics

Style *Rumba Love* - Doux, romantique et danssant.
TITRE: DJ DOLLARS & FANNY - BOLINGO YA NDAKO
*[INTRO - Piano doux & guitare]*
Dj Dollars Fiesta... na Fanny Ngoma...
Bolingo ya solo... Bolingo ya ndako...
Yaka to yembela bango...
*[COUPLET 1 - Pour Papa Dj Dollars]*
Dj Dollars Fiesta, mobali ya valeur,
Depuis okutana na Fanny, bomoyi na yo ebongwani,
Ozali lisusu Dj ya fête te, okoma Dj ya motema,
O mixaka bolingo na kimia na kati ya ndako.
Yo mobali makasi, yo mobali ya musala, papa na Cristiana, Frazzi na bébé Ofranel
Mais na miso ya Fanny, oza bébé na ye.
*[COUPLET 2 - Pour Maman Fanny]*
Fanny Ngoma, mwasi kitoko, mwasi ya motema,
Ozali reine ya ndako ya Dj Dollars,
Na loposo na yo, na sourire na yo,
Okomisi Fiesta ekomi Paradis.
Fanny, ozali mwasi ya mayele,
Oyebi ko batela mobali na yo, Oyebi ko batela bana na bino,
Oyebi ko batela libala na yo.
*[REFRAIN - Le cœur de la chanson, très Lingala Love]*
Dj Dollars na Fanny, bolingo na bino eza ya solo,
Bolingo oyo ewumeli, bolingo oyo etonda na esengo,
Fanny Ngoma, maman ya bana, mwasi ya Dj,
Dj Dollars Fiesta, papa ya ndako, mobali ya Fanny.
Soki bolingo eza nzembo, bino nde refrain na yango,
Soki libala eza danse, bino nde ba meilleurs danseurs!
*[Couplet 3-Déclaration]*
Fanny, yo nde choix na ngai ya suka,
Dj Dollars, yo nde repos ya motema na ngai.
Maboko na maboko, motema na motema,
Boko kende tii na suka,
Bina Fanny, bina na mobali na yo,
Dj Dollars Fiesta, bina na mwasi na yo,
Mokolo ya lelo eza ya bino, bo sepela!
Balobi mbongo ekoki ko somba biloko nionso,
Kasi bolingo ya bino, mbongo ekoki ko somba yango te!
*[COUPLET 4 - Bénédiction du couple]*
Tika Nzambe abatela ndako na bino,
Tika esengo ekota, mawa ebima,
Tika bana na bino bakola na bolingo,
Tika bomengo ekota na ndako na bino.
Dj Dollars Fiesta, zala fidèle,
Fanny Ngoma, zala soumise na bolingo, lokola mama Bettina Lula motema ya Dj Dadjo Mbamvu.
*[OUTRO - Chœur final]*
Vive Dj Dollars! Vive Fanny Ngoma!
Vive bolingo na bino!
Bolingo ya ndako, bolingo ya seko!
Fiesta ya bolingo!

More songs by Emmanuel Listen to songs created by others
FROBITS