Frobits
🎵 A song made on Frobits

Cœur du Congo

Emmanuel · 🇨🇩 DR Congo
0:000:00
Download Remix
Make your own song
Continues securely on the web
Lyrics

*[INTRO - Voix basse, piano triste]*
Yeah... Yeah...
C'est pour ma jeunesse... RDC mon pays...
Bana Congo toza na pasi, mais toza toujours debout...
*[COUPLET 1 - Rap Français touchant]*
J'ai le diplôme en main, mais les mains sont vides
Bac +5, Master, mais j'galère dans le vide
J'ai toqué à toutes les portes, on me dit "reviens plus tard"
Il nous faut 5 ans d'expérience pour un poste de stagiaire
Mais comment avoir d'l'expérience si vous nous donnez pas d'chance ?
Vous nous formez à l'école pour nous laisser dans la souffrance
On est flèche, on est bouillant, on a des idées plein la tête
Mais vos offres d'emploi, c'est des pièges, c'est des requêtes
*[REFRAIN - Chanté en Lingala, mélodie triste mais puissante]*
Nzambe tala bana na yo, toza ko lela eh!
To tangi, to yebi, kasi mosala eza te eh!
Balobi tozanga expérience, kasi toza na talent eh!
Gouvernement yoka biso, pesa biso chance eh!
Toza flèche, toza mayele, tolingi kaka chance!
*[COUPLET 2 - TON NOUVEAU FLOW CORRIGÉ - Le plus lourd du son]*
Oyo ekomi kimotema mabe, makambo nyoso ezo salema na mboka oyo
Ezo mema jeunesse na cao, ezo mema jeunesse na dépression
Kaka po bopesa ngai poste na mosala, bozo senga ngai expérience ya 5 ans, 3 ans
Mais est-ce que bokoki ko pesa ngai expérience ya ba oyo bazo kamba mboka?
Oyo azo diriger Congo, aza na expérience ya combien d'années?
Combien de pays ye asila ko diriger avant Congo?
Po lelo biso peuple to pesa ye chance ya ko koma Président!
Ebele na Parlement, expérience nini bazalaki na yango
Po to ndima ko pona pe ko tinda bango na Parlement?
A part expérience! ya ko kabola ba polo na mungwa na quartier,
Expérience nini lisusu bazalaki na yango?
Malgré nyoso wana, to ndimaki ko pesa bango chance!
Lelo pe tozo mona ba nzela ezo tongama,
Bana bakomi ko tanga ofele! maternité ekomi gratuit,
Eza déjà un pas, oui tozo ndima!
Alors soki to zelaki! kaka bato ya expérience,
Na yebite, soki balingaki ba wuta na lola, po baya ko kamba biso?
Bato tozangi expérience? Jamais!
*[COUPLET 3 - Rap motivation]*
Jeunesse na souffrance bakoma ba meilleure amie,
Yango tokomi ko perdre espoir, na mboka ya bapaya
Policier azalaka amie ya population, mais na Congo
Histoire ya police na jeunesse, ekoma neti histoire ya mpuku na nyau!
Place nyoso bako kutana jeune, yeba ko kima mbangu
Sinon bako tika yo poche vide
Policier ya Congo aza rusé ko leka ata kuluna
Ata akangi yo sans infractions, ako bwakela yo liboke ya bangi na poche
Po akomisa yo coupable, likambo ya kokamwa!
Roulage azo sala likelemba! na Congo! Soki obengi Policier "Monsieur" eza lokola ofingi ye
Yango nazo tuna na Ministère ya Intérieur,
Critère nini vraiment bo tia pona recrutement ya ba policiers?
Oko mona mutu azalaki kuluna lobi, lelo ye wana na tenue asimbi pe munduki,
Bosilisi ye ki-kuluna? To bo matisi ye niveau? mosala bo tindi ye! abatela population na biloko naye, mais sur le terrain, Akomi nde ko botola!
Ba ndeko na biso ya ba Wewa, mawa na Kinshasa
Roulage ayebanaka lisusu te, il suffit olata kaka tenue ya police
Oza na droit ya ko kanga ba moto de 5h jusqu'a minuit sans raison
nyoso Kaka po oza Policier!
Malgré ba vidéos, ezo circuler na ba réseaux sociaux
Mais Ba konzi bazo zwa kakate ba mesures, contre ba policiers indisciplinés
Oyo bazo salir réputation ya Police Nationale Congolaise.
*[PONT - Cri du cœur, plus lent]*
Maman akata ba pongi, chaque 4h akei Boulangerie, mvula ebeta où pas, il faut ateka mapa pona na tanga...
Papa a kumba pousu pona diplôme na ngai...
Lelo na zangi mosala, na kati ya mboka na ngai...
Mais je refuse de voler, je refuse de baisser les bras!
*[REFRAIN 2 - Motivation, avec chœurs]*
Jeune Congolais, téléma! Maîtrise na yo eza mayele!
Jeune Congolaise, téléma! Compétence na yo eza arme!
Même sans expérience, ton talent vaut de l'or!
Même sans capital, ton idée vaut de l'or!
Bako boya yo lelo, lobi bako luka yo!
*[OUTRO - Parlé, punchline finale]*
À tous les jeunes diplômés chômeurs...
À tous les jeunes entrepreneurs bloqués par les taxes...
Ne lâchez pas... Le Congo de demain, c'est nous. Nzambe apesa biso talent.
Et le talent, ça s'achète pas... Ça se prouve.
Gouvernement... Pesa biso chance, tika biso to tonga mboka.

More songs by Emmanuel Listen to songs created by others
FROBITS