Frobits
🎵 A song made on Frobits

Écho du Silence

Emmanuel · 🇨🇩 DR Congo
0:000:00
Download Remix
Make your own song
Continues securely on the web
Lyrics

Yeah... yeah...
Dabia Yenzema Emmanuel...
Ya mitano kati na 12, yoka lisolo na ngai...
*[Couplet 1 - 16 mesures]*
Kombo na ngai Dyenzema, ya mitano kati na bana 12,
Bana mibali 5, bana basi 7, libota monene to yoka.
Na botamaki na wolo, kasi na kolaki na potopoto,
Kombo monene, bolingo muke, tata alobaki polele: bomengo naye eza pona ye moko.
atikaki ngai na makila na ngai moko nakende ko luka yangai vie, esimbela ngai to te etali ye te, eza pasi, ezalaki violent, mawa na ngai elekaki ata ba Orphelin, lelo bozo sepela na ngai kasi soki nzambe te mobulu.
Mama alingaki kosunga ngai kasi azalaki kaka na mai na miso pe mawa ebele na motema lokola mbongo.
Na tambolaki se ngai moko, makolo ngulu, bilamba epasuka, libumu pamba nzala epai,
Mokolo na mokolo na kelasi, ezalaki bitumba, kasi na courage ya mobali na tikaki te.
Na ngolu na nzambe ba Samaritain malamu ba pesaki ngai loboko,
Soki bango te, mbele na zuaki ata Diplôme d'État te, solo.
Na kangaki minu, na leli na kimia,
Po na mukanda moko oyo efutaki bomuana na ngai mobimba.

Oyo lisolo ya Dyenzema, un Euro dans l'ombre oyo batiki,
Tata te, mbongo te, kasi fierté na ngai eza.
Balingi diplôme, ngai na zali na mayele,
Bazo tala niveau, ngai na zali na expérience.
Na bundaka, na telemaka, ata eza pasi,
Mokolo moko bako loba: "Ye nde, abongi atako pasi nyonso".
*[Couplet 2 - 16 mesures]*
Na lingaki Fac, lokola baninga na ngai, lokola ba collègues,
Bango na amphi, ngai libanda, na kotanga ba pièces.
Na monaki bango bazo kende liboso, ngai nakangama,
Frais eza te, piston eza te, esengelaki na meka.
Na zui ba formation pro, technique,
Na tongi maboko na ngai, bongo na ngai, logique.
Na zali na mayele, kasi na mboka na biso bato ba care te,
Awa diplôme nde elobaka, talenta bato ba care te.
Ba futa ngai muke, ba mona ngai muke, ba kiti sa ngai,
Kasi na yebi makasi koleka ba diplômés oyo ba lati bien sapé.
Bango ba zali na titre, ngai na zali na terrain,
Bango ba zali na théorie, ngai maboko nde esalaka.
*[Couplet 3 - Le plus puissant]*
Na yini tata te, na limbisi ye, eza ya kala,
Absence na ye ekomisi ngai makasi, eteyi ngai ko luka pe ko encaisser.
Mama Marie, soki ozo yoka ngai esika ozali, mwana na yo atiki te, kasi azo continue bitumba kino ako zonga lisusu pona ko pangwisa mpinzoli nayo.
Ya mitano kati na 12, kasi ya liboso ya kolala te.
Nazali exemple que pasi ekoki kosala mobali,
Ata na eloko te, okoki kokoma moto moko.
Bongo na bino nyonso oyo babwaki lokola ngai,
Botelema mitu likolo, bo zwa ndakisa na ngai, mpo bino nde ba vrai guerrier, bo ndimela ngai.
Yenzema Emmanuel, bomba kombo oyo malamu,
Mwana muke oyo batiki akotia elembo na nzela na ye, Dyenzema référence de tous les abandonnés.
*[Outro - Dédicace]*
Mbayo Christophe mon amie de souffrances, koko pascal. lembi te... jamais.
Emmanuel DABIA YENZEMA le courageux.
Merci mingi na guide na ngai Maître KATEMBO KAKENGETI, nakotikala seko reconnaissant, mon vieux kighoma Avenir, petit na ngai Youv du Bendo.
Yeah.

More songs by Emmanuel Listen to songs created by others
FROBITS