*[INTRO - piano Rumba, re-#]*
Eh! Lelo eza jour ya esengo eh...
Famille Karawa na famille Kabuya...
Deux familles ekomi une...
Paul... Esther... Makambo esili...
*[COUPLET 1 - Mobali Paul Karawa]*
Paul Karawa, oza le vrai guerrier,
Obuki célibat, lelo okomi mobali ya libala,
Nzambe aponeli yo mwasi ya motema,
Esther Mujinga, perle rare, mwasi ya mayele.
Na nzela ya bomoyi, otambolaki yo moko,
Mais lelo Nzambe apesi yo compagnon,
Ya bomoyi na yo mobimba, ya libela na libela.
*[REFRAIN 1 - Rumba douce, chœur]*
Esther eh... Esther Mujinga Kabuya eh...
Ozali lokola fleur, o kitisi motema ya Paul,
Paul Karawa eh... mobali ya motema eh...
Bolingo na bino, Nzambe nde ebandeli na yango.
Balobi bolingo eza kisi, bino bo meli yango,
Balobi libala eza liwa, bino bo silisi yango,
Lelo na miso ya ba ninga, na miso ya libota pe na miso ya Nzambe,
Bokomi moko...
*[COUPLET 2 - Mwasi Esther]*
Esther Mujinga, mwana ya libota Kabuya,
Lelo okomi Maman Paul, mwasi ya Karawa, olongoli famille nsoni,
Olongwe epayi ya Tata na Mama,
Pona kotonga ndako na yo na mobali na yo.
Mwasi ya kitoko, mwasi ya motema malamu atonda kimia,
Zala couronne na mutu ya Paul,
Paul pe akobatela yo, lokola reine na ye,
Zala réponse ya mituna na ye.
*[REFRAIN 2 - Rumba, douce léger]*
Yaka, yaka Paul, yamba Esther na yo,
Yaka, yaka Esther, yamba Paul na yo,
Bobina, bobina, mokolo na bino lelo,
Bana na bana, bakolo na bakolo, ba yembela bino!
Libala ya Paul na Esther, eza libala ya Nzambe,
Ba ndeko ba yembi, ba Angelu ba bini!
*[DÉCLARATION SPÉCIALE CHANTÉ AVEC ÉMOTION Parole de Paul à sa femme]*
Merci maman Esther, lelo na tondi na esengo yako mona yo na vie na ngai pona libela,
na zalaki na posa ya ko pesa yo likolo na nse, kasi na koki te yango na préféré ko salela yo nzembo oyo, po etikala gravé na Mitema na biso,
lokola meilleur souvenir pona journée historique oyo.
*[PONT - Atalaku ya libala]*
Baguette na mosapi, eza kanga bolingo,
Soki Nzambe akangi, moto nani akofungola?
Na pasi, na esengo, na nzala, na bomengo,
Boko tambola kaka elongo, elongo!
Mama Esther, pesa Paul motema,
Papa Paul, pesa Esther bomoyi na yo!
*[COUPLET 3 - Bénédiction]*
Tika ndako na bino etonda na kimia,
Tika mesa na bino etonda na lipa,
Tika mabota na bino ebota bana ebele,
Bana ya mayele, bana ya Nzambe.
Paul Karawa, mobali malamu,
Esther Kabuya, mwasi ya botosi,
Bokumisa Nzambe na libala na bino,
Nzambe akobatela bino tii na suka.
*[REFRAIN FINAL - Tout le monde chante]*
Paul na Esther eh... Bolingo eza ya seko!
Esther na Paul eh... Libala eza ya Nzambe!
Lelo, lobi, lobi kuna... Bolingo na bino eko kufa te!
Félicitation, félicitation, lelo eza mokolo na bino!
*[OUTRO - Cri de joie]*
Mariage esili! Balingani!
Paul Karawa na Esther Mujinga Kabuya!
Vive les mariés! Vive l'amour!
Tii na liwa!
*[DÉDICACE]*
Merci à la famille Kabuya ma belle famille, et à nos distinguées invités, Ingénieur Dyenzema l'ami de Samuel Tanga mes amis d'enfance.